Kindumba pema, kindumba risque


Papa Francis ba balani sika na maman Tania.
Mais ba ninga mabe bakomi ko mema papa Francis na Shaba, Kapela na matonge kolinga ba makangu.
Mais papa Francis aza nanu amateur na kindumba.
Jour ya liboso alingi likangu na Shaba, azongi na ndaku na solo ya parfum mususu na elamba. Maman Tania atuni ye, " bb , solo ya parfum oyo ewuti wapi"?
Papa Francis alobi " ha chérie, fille moko tosalaka naye ye nde ayaki ko defisa biso yango na mekaki solo mais na sepeli nango tein". Tania alobi ok.
Deuxième fois, Francis aye na couleur rouge na matama, ya ba rouge à lèvres. Muasi atuni, " bb, c quoi cette rougeur "? Mobali alobi " ouf, bb, j'ai mangé un pot de crème au chocolat rougeâtre nde etikali bongo".
Muasi pe alobi ok.
Troisième fois, Francis ake na likangu mususu na Lingwala, tokomi ba 19h boye, incendie esalami na Flat yango, courant eke. Bayebisi ba client tout ba évacuer mbangu pona risque ya feu. Na mulili pe précipitation wana, papa francis abosani alati caleçon ya likangu naye et vice-versa.
Azongi pe palais sans ayeba.
Akomi na ndaku, tala kaka libala ya sika, Tania aye ko longola mobali naye bilamba, azo pesa ye ba bisous partout, na matoyi, na suki, na nez, misu, etc.
Tania alongala mobali pantalon boye, atala mobali alati caleçon ya basi ya couleur rose pale + ba dentelles.
Tania alingi a piquer crise.
Ba ndeko depuis Tania azo tuna " Francis c'est quoi cette histoire"?
Francis azo loba rien, makolo ezo lenga, atelemi lokola mutu akangami na courant.
Kieeeéeeeeee, kindumba pemaaa.
Bon, ba oyo basala kindumba kala mais botika, soki ozalaki na place ya Francis, oko pesa Tania reponse ninioo?
SVP bosala noki po ti sikoyo ndeko na bino Francis depuis akomaki baba azo bouger te, kuna pe Tania azo kangisa biloko alobi libala ezo kufa lelo.
Bosunga ndeko na bino abandi kindumba sika na ba idée SVP.
A vous!

Enregistrer un commentaire

0 Commentaires